Luke 15

Lisapo ya meme oyo ebungaki mpe emonanaki

(Mt. 18.12-24)

1Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bazalaki koya epai ya Yesu mpo na koyoka ye. 2Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koyima-yima mpe koloba :

—Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe azali kolia elongo na bango.

3Bongo Yesu alobaki na bango lisapo oyo :

4—Nani kati na bino soki azali na bameme nkama, mpe abungisi moko, akotika te baoyo mosusu ntuku libwa na libwa na esobe mpo akende koluka oyo wana ebungi, kino tango akomona yango ? 5Mpe tango akomona yango, akomema yango na mapeka na ye na esengo nyonso. 6Tango akokoma na ndako na ye, akobengisa baninga na ye mpe bato oyo bazalaka na ye pembeni, bongo akoloba na bango : “Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai oyo ebungaki !”

7Nalobi na bino, esengo ekozala mpe bongo na likolo mpo na moto moko oyo abongoli motema, koleka oyo ya bato na sembo ntuku libwa na libwa oyo bazali na posa ya kobongola motema te.

Lisapo ya mbongo oyo ebungaki mpe emonanaki

8—To mwasi nini oyo azali na mbongo ya bibende zomi, abungisi moko, bongo akopelisa mwinda te mpe akokomba ndako te mpo na koluka yango malamu, kino akomona yango ? 9Mpe soki amoni yango, akobenga baninga na ye mpe basi oyo bazalaka na ye pembeni, bongo akoloba na bango : “Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai oyo ebungaki !”

10Nalobi na bino, ndenge moko mpe, baanzelu ya Nzambe bakosepela mpo na moto moko ya masumu oyo abongoli motema.

Lisapo ya mwana oyo abungaki mpe amonanaki

11Yesu alobaki lisusu :

—Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali.
12Oyo ya leki alobaki na tata na ye : “Tata, pesa ngai ndambo ya biloko, oyo ya ngai.” Bongo tata akabolelaki bango biloko na ye.

13Sima ya mwa mikolo, leki akongolaki biloko na ye nyonso, mpe akendaki na ekolo moko ya mosika penza. Kuna, abebisaki biloko na ye nyonso na bomoi ya mobulu. 14Tango asilisaki kobebisa biloko nyonso, nzala monene ekotaki na ekolo wana, abandaki kokelela.

15Bongo akendaki mpe azwaki mosala epai ya moto moko ya ekolo wana, mpe moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleyisa bangulu. 16Elenge mobali alingaki kotondisa libumu na ye na biloko oyo bangulu bazalaki kolia, kasi moto ata moko te azalaki kopesa ye yango.

17Tango akanisaki malamu, amilobelaki : “Basali nyonso ya tata na ngai baliaka ndenge balingaka, kasi ngai nazali kokufa awa na nzala ! 18Nakotelema mpe nakozonga epai ya tata na ngai, mpe nakoloba na ye : Tata, nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo. 19Nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo ; komisa ngai lokola moko ya basali na yo !”

20Bongo atelemaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Tango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokelaki ye mawa mingi penza. Akendaki mbangu kokutana na mwana na ye, ayambaki ye, mpe apesaki ye beze.

21Mwana alobaki na ye :

“Tata nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo mpe nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo.”

22Kasi tata alobaki na basali na ye :

“Bomema noki nzambala ya kitoko, mpe bolatisa ye yango. Bolatisa ye mpe pete na mosapi mpe basandale na makolo ;
23boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango. Tokosala feti ya kafu-kafu mpe tokosepela. 24Pamba te mwana na ngai oyo, akufaki mpe azongi na bomoi ; abungaki mpe amonani.” Bongo babandaki feti kati na esengo monene.

25Na tango wana, kulutu azalaki na bilanga. Tango azalaki koya mpe akomaki pene-pene ya ndako, ayokaki makelele ya miziki mpe ya bato oyo bazalaki kobina. 26Abengaki mosali moko mpe atunaki ye soki likambo nini ezalaki koleka kuna.

27Mosali wana azongiselaki ye :

—Ndeko na yo azongi, yango wana tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, mpo azwi ye lisusu na nzoto kolongonu.

28Kulutu asilikaki mingi penza mpe aboyaki kokota. Bongo tata na ye abimaki mpo na kobondela ye.

29Kasi ye azongisaki :

“Nasiʼnasaleli yo bambula ebele penza ; mpe mbala ata moko te naboya kotosa makambo oyo osengaka ngai ; mpe naino opesa ngai te ata mwana ya ntaba mpo nasepela na baninga na ngai.
30Kasi lokola mwana na yo, oyo abebisi biloko na yo na basi ya ndumba, azongi, obomeli ye mwana ngombe ya mafuta !” 31Bongo tata na ye alobaki na ye :

“Mwana na ngai, yo ozali tango nyonso elongo na ngai mpe biloko nyonso oyo nazali na yango, ezali ya yo ;
32kasi esengeli tosala feti mpe tosepela pamba te ndeko na yo oyo, akufaki mpe azongi na bomoi ; abungaki mpe amonani !”
Copyright information for LinMNB